ads

Sunday, 15 January 2017

TINA TE EZA NA TINA BY LOR MBONGO











Refrain :
é Yawé Yawé (x3)
Ozali Nzambé
Ozali Nzambé na ngai
Na yemba ''Yawé Yawé''
é Yawé Yawé (x3)
Ozali Nzambé
Ozali Nzambé na ngai

VERSE 1:
Tala Yo olokotaka moto na se
Okumisi ye moto na tina
Yana baninga bako mona
Bakokumisa nkombo na Yo
Uta ebandeli ya moto
Yo kamataki se putulu
Eloko ezangi na ngo tina
Yango osalelaki moto!
Elingi ko loba se boye
Eloko ezangi na ngo tina
Epai na Yo eza na tina
Mpo yo ozali Nzambe na bomoi!

Refrain :
yemba ''é yawé yawé''
( Mosikoli na ngai Yawé, mobali ya libala,mopesi na kimia Yawe, elikia na ngai Yawe

VERSE 2:
Dawidi mobokoli mpate
Kati na zamba azangaki tina
Yo obimisi ye na mosi ya bato
Opesi ye mbonkonzi yawé!
Nakoki ko lela na ngai te
Soki bato bako mona pamba
Na yebi naza na tina epai na yo
Yango esengo ya motema na ngai!
Tala yo okolokotaka moto na se
Okomisi ye moto na tina
Yana baninga bako mona
Bakokumisa nkombo na yo!

Refrain (x3)

VERSE 3::
o Yesu otomboli ngai!(plusieurs fois)
Yo moko moto olokotaki ngai na se,
Yo moko moto otomboli ngai!
Ko mikitisa na se ya loboko na yo,
Ezali sekele ya moto ovwami! (x3)

é é é!!!
Likonzi ya bomoi na ngai
Nzambe na ngai!
Na kende lisusu wapi Shilo na ngai!
Yo nde ozali na maloba ya bomoi!
Opesaka elonga yo nde Nzambe na ngai!
Liloba oyo ya suka ya bomoi na ngai,
Esimbami na yo Libanga na ngai!
Epai ngai na suki yango eza suka te,
Biwano ya bomoi na ngai ezali na Yo!
Zuwa lokumu Yesu yo nde Nzambe na ngai!
Mopesi na elonga yo nde Nkolo na ngai!

[Repeat verse 3]




Download our Gospel lyrics Android App Here

www.gospelyrix.com







No comments:

Post a Comment