ads

Sunday, 15 January 2017

MONGONGO NA YESU BY LOR MBONGO











VERSE 1:
Motema na ngai ekumisa Yo
Nakendé wapi soki na Yo té
Tango motema ekomaka (na ) suka
Opesaka ngai eyano (bis)

VERSE 2:
Ata na mpasi na kotika Yo té
Na tingama na ngai kaka nse (na) Yo
Otelemisaka makolo na ngai
Esika basusu bazinda (bis)

VERSE 3:
Ata namoni nzela eza molili
Na kobanga molili ya nzela té
Olakisaka ngai nzela
Esika natia lokolo (bis)


VERSE 4:
Na mboka na ngai
T’oza kosela lisungi ekowuta epai na Yo
Na mboka ya Congo to tatoli été
Oza Nzambe na bolingi (bis)

Solo: Oh! Yesu oyo

REFRAIN 1:
Mongongo na Yo (Alléluia baba, baba)
Ebukaka ba ngomba
Na bomoi ya bato nionso ekotosaka Yo (bis)

Solo: Oh! Na nkombo na Yesu

REFRAIN 2:
Mongong na Yo
Molimo etosaka
Tokomi balongi kaka pona kombo na Yo (bis)

Solo: Oh! Ngai n’aza moto na esengo

REFRAIN 3:
N’aza moto n’esengo
Nse mpo na nkombo na Yo
Na koyembela Yo
Loyembo ya motema na nga (bis)



Download our Gospel lyrics Android App Here

www.gospelyrix.com







No comments:

Post a Comment