NKOSI NA YUDA BY LOR MBONGO
Monkonzi azali
Oyo ba ngumamelaka
Ebongo pona Mokonzi na ba konzi to sala nini (x2)
Obengami Nzambé
Mokeli na mokoli
Nkosi na Yuda, lelo okomi nkosi ya libota na ngai (x2)
parole de L'Or :
Hé na pelisaka monoko!
Reprise du choeur :
''hé po yo oza Nkolo na ngai!
Na kobetaka tolo po yo ozali nkosi ya libota na ngai''
L'Or:
Osala ngai monzoto na tango na ngai!
Obenga ngai moyesu! é Yesu na ngai
(reprise choeur)
L'Or :
Omonisa ngai moyi na senga yango té!
Makasi ya balemba, Elonga ya ba santu
(reprise choeur)
L'Or :
Hé osala ngai elembo na tango na suka!
(reprise choeur)
Alléluia é é é
L'Or :
Esengo na yo yango makasi na ngai!
(reprise choeur)
L'Or :
Na longa uta yo longa nékulusu!
(reprise choeur)
L'Or :
Mpo yo nde nkosi alongaka kaka
(reprise choeur)
L'Or :
Oyo asimbi ngai, asimbi Yo Yaya!
Loboko na Yo yango nde bomengo na ngai
(reprise choeur)
Ozali Nkosi!
''Nkosi na Yuda!''
Ozali Nkolo!
''Nkolo na nioso!'' (x2)
To tombola Nkosi!
Nkosi azongaka té sima liboso netumba
Ozali Nzambé oyo ba koki ko longa Yo té
Tango monguna ayaka na bonge lokla ebale
Molimo na Yo Yesu ako potisa ye bangu
Yango to tatoli elonga oyo ya etumba
Otalisaki yango kuna na Gologotha!
o o o Gologotha!!
Elonga emonani ye!
Na Gologotha tokomi nde ba kristo!
Elonga emonani ye!
Na Gologotha tokomi nde ba longi!
Elonga emonani ye!
Na Gologotha tokomi nde ba santu! (x2)