TALA TINA BY LOR MBONGO
VESRE 1:
(Bomoi na ngai ezali kaka putulu ya pamba)
o o Yawé na ngai
(Sans Yo nazali moto pamba)
o o Yawé
(Nalingi kaka ko kumisa Yo po été Yo oza motema na ngai)
o o Yawé
(Zua esika na ngai na bomoi na nagai Nzambé)
o Yawé, o Yawé, o Yawé
o o Yawé na ngai
(Pangunsa pisoli ya miso na ngai)
o o Yawé
(Nazala bobele moumbu na yo Nzambé)
o Yawé
(Po été na kumisa Nkombo na Yo)
o Yawé, o Yawé, o Yawé
VERSE 2:
é! é!
Olampa ndaye Baba pona ngai
Okotika ngai ata moké té
Okosala na ngai bisika nioso
Oza Nzambé Mokonzi! (x2)
VERSE 3:
Na butu na kolala na kimia
Mpo Yo okengelaka pongi na ngai
Okolongisa ngai ata na ndoto
Oza Nzambé Monkonzi (x2)
Tala tina!!!..
Refrain :
Ngai nako tiela Yo motema
Bomoi mobimba zala Nzambé na ngai
Ngai nako yemba kino na suka
Ya makasi na nagi
O Mokonzi
Ngai nako tiela Yo motema
Bomoi mobimba zala Nzambé na ngai
Ngai nako yemba kino na suka
Ya mongongo na ngai
O Mokonzi (x2)
VERSE 4:
Yawé, Yawé; Yawé, Yawé
Ozali Nzambé!
Molimo na nagai ekumisi Yo!
(sepelisa motema na ngai nioso Yawé, Nzambé na ngai)x 4
Tala tina!!!..
Refrain